Ezayi27lin_bib
1Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani ,nyoka oyo ekimaka,na Leviatani, nyoka ya somo,na nzela ya mopanga na Ye ya minu,mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ;akoboma elima ya ebale monene.2Na mokolo wana, bakoloba :« Boyemba nzembo mpo na nzete ya vino ya kitoko :3Ngai Yawe, nabatelaka yango,nasopelaka yango mayi tango nyonso,nakengelaka yango butu mpe moyimpo ete moto moko te abebisa yango.4Nazali lisusu na kanda te.Ah, soki ezalaki kaka na banzubempe na basende mpo na kobundisa Ngai,nde natambolaki likolo na yango na bitumbampe nabwakaki yango nyonso na moto.5Kasi tika ete bakimela epai na Ngailokola ndako batonga makasi,tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ;solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ! »6Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa,Isalaele akobimisa bafololo mpe mito,mpe akotondisa mokili na bambuma na ye.7Boni, Yawe abetaki ye tendenge abetaki bato oyo babetaki ye ?Boni, abomaki ye tendenge abomaki bato oyo babomaki ye ?8Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana.Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi,kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este.9Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama,mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye :akobuka mabanga nyonso ya etumbelompo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ;mpe likonzi moko te ya Asherato etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala.