1Tala, Yawe akobebisa mokilimpe akokomisa yango lokola esobe ;akokotisa mobulu kati na yangompe akopanza bato na yango.2Ekozala mpe kaka ndenge mokompo na Banganga-Nzambe mpe bato,mpo na nkolo mpe mowumbu na ye,mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye,mpo na moteki mpe mosombi,mpo na modefisi mpe modefi,mpo na moto oyo bakofuta ye niongompe mpo na moto oyo akofuta niongo.3Mokili ekobebisama penza nyempe bakopanza yango nyonso.Yawe nde alobaki yango.4Mokili ezali na matanga mpe ekawuki,mokili mobimba ebebi mpe ekawuki ;ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili !5Bato ya mokili bakomisi yango mbindo,bazali kotosa mibeko te ;banyati-nyati bikatelimpe babuki boyokani ya seko.6Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ;bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango.Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa,mpe ndambo moke kaka nde etikali.7Vino ya sika ezali na matanga,elanga ya vino ekawuki ;bato nyonso oyo bamesana na esengobakomi kolela na pasi.8Esengo ya mbonda esili,makelele ya bato ya biyenga esili,esengo ya lindanda esili ;9komela vino etikali lisusu na banzembo te,masanga ya makasi ekomi bololompo na bato oyo bamelaka yango.10Engumba oyo ebeba etikali pamba,bikuke ya bandako nyonso ekangami.11Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te,kosepela nyonso ebongwani molili,esengo nyonso elongwe na mokili.12Libebi kaka nde etikali kati na engumba,babuki-buki bikuke na yango na biteni.13Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolondenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzeteto tango balokotaka bambuma ya vinosoki basilisi kobuka yango.14Bamoko bakotombola mingongo na bangompe bakoganga na esengo ;wuta na weste ya mayi monene,bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe.15Yango wana, kuna na ngambo ya este,bopesa nkembo na Yawe ;bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele,kati na bisanga ya ebale monene.16Wuta na suka ya mokili,tozali koyoka banzembo :« Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. »Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka !Mawa mpo na ngai !Bazoba bateki mboka, na bozoba penza,bazoba bateki mboka ! »17Oh bato ya mokili,somo, libulu mpe motamboezali kozela bino.18Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somoakokweya na libulu,mpe oyo akoluka kobima kati na libuluakokangama na motambo.Maninisa ya likolo esili kofungwama,makonzi ya mokili ezali koningana.19Mokili ebukani-bukani,mokili epanzani,mokili eningani makasi.20Mokili ekomi kotenga-tengalokola moto oyo alangwe masanga,ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti.Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye,esili kokweya mpe ekotelema lisusu te.
Suka mpe ebandeli
21Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbuna mampinga ya lola kuna na likolo,mpe na bakonzi ya mokili na se.22Bakosangisa bango elongo kati na libulundenge basangisaka bakangami na boloko,bakokangela bango na bolokompe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele.23Sanza ekokoma motane,mpe moyi ekoyoka soni,pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga,akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi,liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.