Ezayi17lin_bib

Maloba ya kosambisa Damasi

1Maloba ya kosambisa Damasi :« Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te,ekokoma nde liboke ya libebi.2Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te,ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna,oyo moto ata moko te akobangisa.3Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi,mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi.Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, »elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
4« Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila,mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.5Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya blempe loboko ya moloni ebukaka mito na yango,lokola tango balokotaka mito ya bleoyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.6Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ;lokola tango baningisaka nzetempo na kobuka bambuma ya olive,bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape,mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, »elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.7Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bangompe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele ;8bakotalela lisusu bitumbelo teoyo ezali misala ya maboko na bango,mpe miso na bango ekotala lisusu temisala ya misapi na bango :makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.9Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasindenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele.Nyonso ekobebisama penza.10Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo,oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo,okolisi banzete ya kitokompe oloni banzete ya vino ya bapaya.11Kaka na mokolo oyo olonaki yango,omonaki yango kobimisa mito ;mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo.Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba,mpe pasi yango ekoki kosila te.12Mawa na ebele ya bato !Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene !Bato ya bikolo bazali kogangalokola lokito ya mayi ya ebale monene !13Ata bato ya bikolo bazali kogangalokola makelele ya mayi ya bibale minene,bakimaka penza mosikatango Yawe apamelaka bango ;bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe,lokola putulu na tango ya mopepe makasi.14Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka !Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka !Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso,mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.