Abakuki1lin_bib

Loyembo ya liboso ya mawa

1Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli :2Oh Yawe, kino tango nininasengeli kobelela Yo mpo ete osunga,kasi ozali koyoka te ?Nazali koganga epai na Yo : « Minyoko eleki ! »kasi ozali kaka kobikisa te !3Mpo na nini ozali kolakisa ngaimakambo mabe ya boye ?Mpo na nini ozali kosala eloko moko te ?Liboso na ngai, nazali kaka komona libebimpe makambo mabe,bato bazali kaka koswana mpe kofundana.4Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te,bazali kokata lisusu makambo na bosembo te.Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo,makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te.

Eyano ya Yawe

5Botala nanu malamu bikolo mosusumpe bokokamwa penza,pamba te nakosala likambo moko na tango na bino,likambo oyo bokondima tesoki bayebisi bino yango.6Nakotindela bino bato ya Babiloni,bato ya mitema mabe,oyo bayokelaka bato mawa te :batambolaka mokili mobimbampo na kobotola bato bisika na bangoya losambo na makasi.7Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka,basalaka makambo nyonsooyo bazali na yango posa,mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.8Bampunda na bango ekimaka mbangukoleka ata nkoyi,ezalaka na kanda makasikoleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwampo na koluka nyama ya kolia.Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampundabatambolaka mbangu makasimpe bawutaka mosika penza,bapumbwaka lokola mpongosoki ezali kokita na elulumpo na kokanga nyama ya kolia.9Bango nyonso bayaka nzela mokompo na kotia mobulu,bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este,bazwaka bakangami ebelendenge balokotaka mbuma ya zelo.10Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi,basekaka bingumba batonga makasi,batondisaka mabele pembeni ya bamirmpo ete bamata likolo na yangompe bakota na engumba mpo na kobotola yango,11balekaka lokola mopepempe bakobaka nzela na bango,basepelaka kosala mabe,mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.

Loyembo ya mibale ya mawa

12Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ?Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai,okufaka te.Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ;mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bangompo na kopesa biso etumbu.13Miso na Yo ezali peto koleka,okoki kotala mabe te.Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ?Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ?Mpo na nini ovandi kimiawana bato mabe bazali konyokolabato oyo baleki bango na bosembo ?14Okomisi bato lokola bambisi ya ebale,lokola banyama oyo etambolaka na libumumpe ezanga mokonzi.15Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo,akangaka yango na monyamampe atiaka yango na kitunga.Yango wana asepelakampe atondaka na esengo.16Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka,atumbelaka kitunga na ye ansa ;pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye,azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.17Boni, akosepela solo kotikaete monyama na ye ezanga mbisina kokoba koboma bato na mawa te ?