Bagalatia1lin_bib
Ebandeli ya mokanda
1Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi,2mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai ;Epai ya Mangomba ya Galatia :3Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !4Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe.5Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela ! Amen !