Ezekieli19lin_bib

Loyembo ya mawa mpo na bakonzi ya Isalaele

1« Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba :2‹ Mama na yo azalaki nani ?Nkosi ya mwasi kati na bankosi !Ezalaki kovanda kati na bana na yangompe kobokola bana yango.3Ekolisaki moko kati na bana na yango,mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi.Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.4Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yangompe bakangaki yango na mitambo ya mabulu ;bakangaki yango bibende na zolompe bamemaki yango na mokili ya Ejipito.
5Tango mama ya nkosi yango emonakiete elekisi tango ya pamba mpo na kozelampe elikya na yango esili,ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango,ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.6Ekomaki konguluma kati na bankosi,pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi.Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.7Ekweyisaki bandako na bango ya makasimpe ebebisaki bingumba na bango.Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kunabazalaki kotondisama na somo.8Bongo bato ya bituka ya zingazinga,longwa na bikolo na bango,bayaki kotelemela yango,batielaki yango mitambo na bangompe bakangaki yango kati na mabulu na bango.9Bakangaki yango minyololo,bakotisaki yango kati na ndako ya banyama,bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni.Babwakaki yango na bolokompo ete mongongo ya koganga na yangoeyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.

Loyembo ya mawa mpo na nzete ya vino

10Mama na yo azalaki lokola nzete ya vinokati na elanga na yo ya vino,oyo elonama pembeni ya mayi,ezalaki kobota bambuma ebele,ezalaki na bitape ebelempo ete mayi mpe ezalaki ebele.11Bitape na yango ezalaki makasi,ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi,ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu ;eyebanaki makasi mpo na molayi na yangompe mpo na ebele ya makasa na yango.12Kasi bapikolaki yango na kandampe babwakaki yango na mabele.Mopepe ya este ekawusaki yango,ekweyisaki mbuma na yango,ekawusaki mpe bitape na yango ya makasimpe moto etumbaki yango.13Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe,mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi.14Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yangompe etumbi mbuma na yango ;ata etape moko te ya makasi etikalakimpo na kosala lingenda ya bokonzi. ›Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »