Kobima31lin_bib
Basali ya Esika ya bule
1Yawe alobaki na Moyize :2— Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;3natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ;4mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ;5mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso.6Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani.Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo :7Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ;8mesa elongo na biloko na yango ; etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso ; etumbelo ya malasi,9etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso ; sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango ;10bilamba ya mosala, bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe,11mafuta ya epakolami mpe ansa ya solo kitoko mpo na Esika ya bule.
Basengeli kosala yango ndenge kaka natindaki yo.