2 Samuele3lin_bib
1Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.2Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron : Mwana ya liboso ezalaki Aminoni oyo Ayinoami, moto ya Jizireyeli, abotelaki ye ;3ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;4ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye ; ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye ;5ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye. Bango nde bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron.