2 Petelo1lin_bib
Ebandeli ya mokanda
1Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ;Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :2Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu, Nkolo na biso !