2 Bakolinto6lin_bib
1Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;2pamba te Nzambe alobi :« Na tango ya malamu, nayanolaki yo ;mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. »Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.3Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.4Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasikati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;5kati na kobetama, boloko mpe mobulu ;kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;6kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ;kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;7kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ;kati na bibundeli ya bosembompo na kobundisa monguna mpe komibatela ;8kati na lokumu mpe soni,kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe.Mpe lisusu,kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta,nzokande tolobaka solo ;9koyebana lokola bato oyo bayebani te,nzokande toyebani makasi ;koyebana lokola bakufi,nzokande tozali bato ya bomoi ;koyebana lokola bato bakweyisama,nzokande baboma biso te ;10koyebana lokola bato na mawa,nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ;koyebana lokola babola,nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ;koyebana lokola bato bakelela,nzokande tozali na nyonso.11Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama.12Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.13Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !