2 Masolo ya Kala21lin_bib
1Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.2Tala bandeko mibali ya Yorami : Azaria, Yeyeli, Zakari, Azaria, Mikaeli mpe Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Jozafati, mokonzi ya Isalaele.3Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo ; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali.