1 Petelo1lin_bib
Ebandeli ya mokanda
1Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto ;Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.2Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki.
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !