1 Masolo ya Kala26lin_bib
Masanga ya bakengeli bikuke
1Tala masanga ya bakengeli bikuke :Mpo na bato ya Kore : Meshelemia, mwana mobali ya Kore, moko kati na bana mibali ya Azafi.2Meshelemia azalaki na bana mibali oyo : mwana ya liboso, Zakari ; mwana ya mibale, Yediayeli ; mwana ya misato, Zebadia ; mwana ya minei, Yatinieli ;3mwana ya mitano, Elami ; mwana ya motoba, Yoanani ; mpe mwana ya sambo, Eliowenayi.4Obedi-Edomi mpe azalaki na bana mibali oyo : mwana ya liboso, Shemaya ; mwana ya mibale, Yozabadi ; mwana ya misato, Yoa ; mwana ya minei, Sakari ; mwana ya mitano, Netaneeli ;5mwana ya motoba, Amieli ; mwana ya sambo, Isakari ; mwana ya mwambe, Pewulitayi ; pamba te Nzambe apambolaki Obedi-Edomi.6Mwana na ye ya mobali Shemaya azalaki mpe na bana mibali oyo bazalaki bakambi ya libota ya tata na bango, pamba te bazalaki bilombe mibali.7Bana mibali ya Shemaya : Otini, Refaeli, Obedi, Elizabadi ; mpe bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki bilombe, Eliwu mpe Samakia.8Bango nyonso bazalaki bakitani ya Obedi-Edomi. Bango, bana na bango mpe bandeko na bango ya mibali bazalaki bilombe mpe bato ya mpiko mpo na mosala. Bakitani nyonso ya Obedi-Edomi bazalaki tuku motoba na mibale.9Meshelemia azalaki na bana mibali mpe bandeko mibali oyo bazalaki bilombe : bango nyonso bazalaki zomi na mwambe.10Osa, moko kati na bana mibali ya Merari, azalaki na bana mibali oyo : Shimiri oyo tata na ye atiaki ye mokonzi atako azalaki mwana ya liboso te ;11Ilikia, mwana ya mibale ; Tebalia, mwana ya misato ; mpe Zakari, mwana ya minei. Bana mibali mpe bandeko mibali ya Osa bazalaki bango nyonso zomi na misato.12Masanga ya bakengeli bikuke ezalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe, na bokambami ya bakonzi na bango ndenge bandeko na bango bazalaki mpe kosala.13Boye kobanda na leki kino na kulutu, bazalaki kobeta zeke mpo na ekuke moko na moko, kolanda mabota na bango.14Mpo na ekuke ya ngambo ya este, zeke ekweyaki epai ya libota ya Shelemia. Bongo babetaki zeke mpo na mwana na ye ya mobali Zakari oyo azalaki mopesi toli ya bwanya, mpe zeke mpo na ekuke ya ngambo ya Nor ekweyaki likolo na ye.15Mpo na ekuke ya ngambo ya sude, zeke ekweyaki epai ya Obedi-Edomi ; mpe mpo na ndako oyo babombelaka biloko, zeke ekweyaki epai ya bana na ye ya mibali.16Mpo na ekuke ya ngambo ya weste mpe ekuke ya Shaleketi, na nzela oyo emata na likolo, zeke ekweyaki epai ya Shupimi mpe Osa.
Tala ndenge bakabolaki masanga ya bakengeli bikuke :17mokolo na mokolo, ezalaki na Balevi motoba na ngambo ya este, Balevi minei na ngambo ya nor, mpe Balevi minei na ngambo ya sude ; mpe masanga mibale oyo moko na moko ezalaki na bato mibale, na ndako oyo babombelaka biloko.18Mpo na lopango ya weste, ezalaki na bakengeli minei na nzela ; mpe mibale kati na lopango.19Oyo nde ezalaki masanga ya bakengeli bikuke oyo baponamaki kati na libota ya Kore mpe ya Merari.